LIBONDELI YA LE 06 AVRIL

   
Mokolo oyo ya le 06 avril, lokola oyoki kolela na biso na kati ya nzembo
Tata Nzambe po ete biso bato to bonga, lokola ezalaki posa na yo, otindelaki biso muana na yo Yesu Klisto, po ete biso bato to bikisama.

Nkolo na biso Yesu Klisto, ondimaki kufa ya soni; ba bakisaki yo na ekuluzu elongo na miyibi, moko kati na bango a sakanelaki yo, kasi ozongiselaki ye liloba moko te, na tina ete olingaki ko sala kaka oyo boyokanaki na tata na yo po ete moto a koka ko zuwa esika na mitema na bino.
Manso wana ma salemaki na tina na biso bato mabe.

Toyebi na bolamu ete olingi ko zongisa biso bato to koka ko zala lisusu na yo elongo kuna na lola esika moko na ba santu na yo.

Liboso ete omata na likolo, olakisaki maye mazalaki na yo epayi ya bayekoli na yo, olakisaki bango posa na yo, mpe otindaki bango bakende na mokili mobimba, ba bongola ba pakanu bandimi; Molimo Mosantu ako kita pe akozala na bango kasi bo ko yeba ye te.
Maloba na bino manso to tangaka mango na mokanda mua Nzambe.

Na mokolo moye, Tata Nzambe, Nkolo Yesu Klisto na yo Tata Molimo Mosantu, to yebi ete to zali ba bungi liboso na miso na bino, pamba te to salaka maye bolingaka te pe to yokisaka ba sali na bino soni, pamba te manso bo pekisaka biso to monaka yango lokola liseki.

To fukami na se ya makolo na bino po to mona bolimbisi bua bino.
To si to moni mabe na biso pamba te mokili mo komi ko ningana; yango e tindi biso to meka ko yeba soki yo ozali nani.

Lakisa biso nzela na yo, pamba te mayele na biso ezali kaka ya bo muana po na tina masumu na biso, tala ndenge pasi elekeli biso : Kufa, maladi, bitumba, nzala, na makambo ndenge na ndenge lisusu.
Biso tojali na ekimeli mosusu te yonde ebombamelo na biso.
Bo salisa biso pamba te to zangi mosusu oyo akoki ko zala molobeli na biso kuna bo zali.

Bo longisa biso na bitumba tojali na yango awa na mokili.
Longola kolela na biso e Nkolo, kotala masumu na biso te pamba te toyebi penza ete yo Nkolo Yesu okufaka na ekuluzu po to koka ko bengama bana ba Nzambe.
To sengi kimia na kati ya mokili mobimba : Afrika, Poto, America, Asiya mpe oceania.

Yo olobaki ete, libanga moko te ekotikala likolo ya libanga bobele ko longolama.
To moni biteni mosusu ya mokili bizali ko lakisama kaka pasi na bato mususu.
To sengi na yo oponela bango molobeli na kati na kimia, oyo akoki ko tambolisa bango na tina ete to moni makila ya bato ekomi lokola eziba na mayi liboso na miso na yo, po na komi ponela motambolisi.

Likambo wana ezali ya mawa mingi pe pasi penza.
Tala lelo oyo ba zali ko bundisa biso,
biso na biso tozali kibomana.

Tosengi bo longolela biso manso wana po ete kimia e kota na mokili mobimba mpo ete mabota manso mazala na boyokani.

Yango nde to yeyi ko lakisa na bino basatu ya bule, na kombo ya Tata, ya Muana pe ya Molimo Mosantu.         Amen.

   
Mise en ligne P.M / Preski France 




Powered by Preski France © 2006-2007 ejcsk-France