|
|
Message du Chef Spirituel Papa Simon KIMBANGU KIANGANI du dimanche 20 juillet 2008 à Nkamba Nouvelle Jérusalem
Na kombo ya Tata, Muana pe Tata Molimo Santu
Tolandi mateya na biso ya mokolo ya lelo
Ye Tata ateyi biso abandelaki na nzembo ya ba yuda
Akeyi na mibeki na mama na likambo oyo toke nango tobomba pe
to salela yango
Tokomi na tangu ya suka oyo ezali que Nzambe alingi
asepelisa bana na ye
Oyo
bayokelaka Satana, bako kende epayi ya Satana
Oyo
bayokelaka Tata Nzambe, bakende pe epayi ya Tata Nzambe
Tina to landelaka
mateyi, to yokaka, toyaka pona kosambela
Toniokuami mingi, Tata de la ville ayebisi makambu ebele !
Tango likambo ya malamu eza koya, Satana azalaka na esengo
te,
Akobotaka makambu ya ndenge na ndenge, mais biso to kozonga
sima te,
Surtout ngai na telemi awa na kozonga sima te!
Mususu pe
nake kotala esika bango bazalaka
Baza kaka wana, pe makasi nagai yango wana, makasi ya biso
nionso.
Parce que ba Papas bazali kotala, bazali kolanda biso, bazali kaka wana
ba déplacés te ! Baza na
biso na Yeluselemi, na programme pe makambu nyonso toza kosalela.
Papa
Mfumu’a Nlongo tangu azalaki na boma na Papa Nkulutu, Papa Nkulutu aza kosala
na ye, Papa Mfumu’a Nlongo aza kokota nanu classe. Ye moko Papa Mfumu’a Nlongo
abetelaka biso lisolo wana, biso nyonso toyebi yango. Kotanga ya Papa Mfumu’a
Nlongo, wana déjà Papa Nkulutu a préraré costume, Papa Nkulutu alobi na Papa
Mfumu’a Nlongo, omoni bilamba oyo? Papa Mfumu’a Nlongo alobi oui, na moni
yango. Soki ozui kaka examen ezali costume nayo, mais lokola nanu ozui
te na kopesa yo te, et pe soki ozui te, okozua te. Papa Mfumu’a Nlongo asalaki
makasi, kino azuaki costume wana, tangu ba bengi kaka ye, na bulletin na ye
alakisi Papa, déjà elamba esi ekotaki na nzoto. Biso pe lokola, esi pe apesi
biso promesse, likambo yango eza ya biso, ekokende epayi te, sikawa tokosala
makasi. Tangu boni mutu muindu aniokuami ? Mais biso na biso ba cales
ebandi, kokanga nzela, mais cale wana ekosala eloko te ! Yango na lobi
esika nake kotala baza kaka wana, position pe kaka yango wana que tokosepela,
balingami na bango te ! Biso sikoyo nde kosala makasi po ba botola yango
te. Yongo oza koyoka mateya eza koleka butu moyi ! Oyo ba bongisela biso
ya minene minene eza na biso, ezelaka tango ekoka. Po soki otali na Afrique,
oui ! Afrique pe ezali munene, mais oyo toza nango, les 3 Congo, ndenge
Papa Mfumu’a Nlongo alobaki, makambu ya Nzambe eza na biso, richesse toza na
ngo. Angola akoki kozala même na richesse ya ndenge nini, mais makambo ya
Nzambe bazali kolukela yango awa, Brazzaville richesse ya ndenge nini mais
makambu ya Nzambe eloko ezangi, makambu ya Tata Nzambe il faut kaka kolandela
yango na Nkamba. Kisangani baza koya, esika Papa aza kolala kuna mingi, retard,
toza kolanda nde mama ya likambo. Oyo bazowuta musika baza koya, likambo ezali
awa ! Yango nazo senga mabondeli, soirée to tika te, libondeli ya tango.
Tangu programme esalamaki, Papa Mfumu’a Nlongo, esika nyonso
tozalaki koluka indépendance, kaka nde Israël, soki tosambeli Israël azui
indépendance na ye, dix ans après ekozala ya biso, donc il faut tosambela pamba
te tangu nini ye alobaki Israël ekozua ? Nkolo Yesu tangu ayaki, ba bomi
ye azongi, ba monaki que totikali na bowumbu, biso tokanisaki nde ye, ake na
ye, nzoka nde Molimo Santu nde akoya. Alors tangu Papa asalaki programme, ba
mbuta pe bazalaki tangu Papa apesaki programme kati na mabondeli. Papa KUAMADIO
Dominique azalaki na kati ya programme wana ya mabondeli, akufi nanu te, ba
mususu pe baza nanu, po bazalaki na kati ya groupe, nde na 47 Israël azui
indépendance, et na 60 biso toye kozua, eke na Brazzaville esika nyonso, batiki
biso na bowumbu te. Yango tolobi tangu ekoki mundu eko sepela. Likambu tozo
bosana makambu eza nango mingi mais makobima te, balobi Simon Kimbangu aza
Molimo Santu te ! Parce que tangu ekobima batu bakoloba ah ! Toyokaka
yango, ah ! Toyebi yango, toza nanu na tembe ! Biso toza kolanda kaka
likambo, likambo munene eza kozela biso, banda mokili esalema nanu esalami te,
na tango wana valeur na yo ekoyebana ekomonana. Tolemba te pona kotonga
Yeluselemi, nga naza kobanga kaka pona Yeluselemi totongi nanu te, bakonzi na
biso toko lalisa bango wapi ?
Nzela ya Nkamba ba camion kokota kobima, tokolalisa bango
wapi ? Souci na nga yango wana. Tokende kobondela makasi, ba beko, po soki
likambo ekomi pembeni bitumba pe ekozalaka mingi. Baloba oyo, oyo te !
Ngai kuna nazali te, mais naza kaka na likamb’oyo ba tieli nga yango na kosala,
balinga balinga te to kolonga. Nde yango wana. Mokolo wana na tangisaki
chapitre ya Mathieu, na pesaki Mathieu 4, pona nini ! Nkolo Yesu ba
baptisé ye na Jean, na Yowani, sima nde ake kosala retraite, 40 jours, 40 nuits
koliya te komela te. Pona mutu 1 semaine pamba déjà likosi ebimi, mais ye
asalaki yango avandi, kolala kolamuka na kati ya mabondeli, tangu asilisi Satan
alindi ye. Satan alobi na monaki yo oza na nzala, tala libanga yango wana,
bongola yango ekoma lipa oliya. Azuaki réponse Nkolo Yesu apesaki mais
ekoki te amemi ye na ngomba, alobi na ye : oza na ngomba, kita na se
okueya, ba anges ba koyamba yo, Nkolo Yesu apesi réponse, atiki ye te !
alandi ye lisusu alobi soki ofukameli ngai, oyo nyonso bisengo oyo na pesi yo.
Nkolo Yesu esika wana nde abenganaki ye, pona nini, ye azali Nzambe, Satana
akufi soni akeyi.
Biso tozo tinda mabondeli, mabondeli etoka ezala makasi,
yango biso toko salaka beko ba komekaka biso, même na kati ya ba beko ba oyo pe
ba koyokela Satan baza na kati, bazo tia cale baza kobebisa makambu, mais biso
tolobi c’est trop taaaaaard ! Décision ya ba Tata baza kokende que biso
tokeyi kasi mutu muindu akosepela kaka, soki bomoni biso misatu toza lisusu te,
toke kokanga likambo bozala na bino na kobanga te. (Commentaire : Papa asengi nzembo na Faki) Merci, merci Faki.
Ah ! Ba Tata soki balobi makambu ekosalema, tozala na doutes te, biso ba
tindi biso kaka mabondeli, ba beko ezala makasi, oyo ekozala que ya sûr tozo
sala po ete likambu na biso ebeba te, po etikali muke tolingi tokota na likambu
ya munene, mais likambu wana soki eye kaka, na oyo ba fingaki, na oyo ba
tiyolaki, na oyo baza koloba que aza Molimo Santu te ekomami partout mais
lokuta na bango, eza ya konyatama. Bo banga na bino te. Na kati ya bolingo mibeko
pe misala, Tata, Muana pe Tata Molimo Santu……..Amen !
Message transmis par Papa MUAKA NGOY (Ratelki Nkamba), le 20 juillet 2008
Transcrit par Papa Patrick MAVAMBU (Preski - France), le 21 juillet 2008
|
|