Message
du Chef Spirituel Papa Simon KIMBANGU KIANGANI du dimanche 17 Aout
2008 à Nkamba Nouvelle Jérusalem
Na kombo ya Tata, Muana pe Tata Molimo Santu.
Toko loba mingi te, 16h25.
To landi
mateyi na biso ya mukolo ya lelo
Abandaki na
nzembo ya ba yuda, ake na mibeko pe mama ya likambo oyo toke ne ngo, to bomba
pe to salela yango.
Biso batu toyaki na fête, fête na biso eleki malamu.
Ba leyisi biso na molimo, oyo tozuaki lobi na ya lelo, to
batela kondima na biso. Po ete oyo elobami na mokanda ya Tata Nzambe, kufa
ezala na biso te. Kufa ezali nzoto mutu ekufaka mais molimo ekufaka te, po soki
obomi nzoto na molimo oza na esika te. Na tina ya mateya ya mokolo ya lelo.
Nzoto pe ata ekufi, okoki ko récupérer yango tangu mususu. Tangu ba lobi que
fête ezali, wana nde nzoto oyo ekufaka oko luka yango. Tangu wana pe ekozala
que Tata te mutu ako sambisa mais Muana. Po mukumba nyonso Tata apesi yango na
Muana. Muana nani, Nkolo Yesu.
Yango ba lobi oyo alandi ye, kufa ekozala na ye
te, bomoyi ya seko ekozala kati na ye. Tina toyelaka na ndaku ya Nzambe totiki
ba ndaku, totiki misala, totiki makambu nyonso, toye koyoka liloba ya Tata
Nzambe, po nzoto na molimo ezua esika epaya Tata Nzambe. Biso nyonso tolandi
Nkolo, tina ya mateyi na biso ya mokolo ya lelo.
Bozongi na biso, solo mutu na mutu ayebi. Misala nde toza
kotinda, boyokani nde toza kotinda. Tokomi na tangu ya suka, pamba te oyo ezali
ekeke ya mineyi pe ya suka, Nzambe ako sepelisa bana na ye. Tozala makasi na
mabondeli. Mabondeli ya tongo, soirée na pokua pe ba beko to tika te, toza na
kati ya bitumba. To yokaki likambu esepelisaki ngai na Londre, kuna bazui esika
moko ya munene ya kitoko ya kosambela, ba telemisi bendele na bango l’Etat pe
ayaki kuna, epesi esengo. Esika misusu etikali bosala makasi bozua bisika ya
mabondeli po ete likambu oyo Nzambe abongiseli biso eya kati na biso.
To silisi na kombo ya Tata, Muana pe Tata Molimo
Santu….Amen !
Message transmis par Papa MUAKA NGOY (Ratelki Nkamba), le 18 Aout 2008
Transcrit par Papa Patrick MAVAMBU (Preski - France), le 19 Aout 2008