haut
 




Message du Chef Spirituel Papa Simon KIMBANGU KIANGANI du dimanche 10 Aout 2008 au Centre D'accueil Kimbanguiste de Kinshasa


Na kombo ya Tata, Muana pe Tata Molimo Santu.
To landi mateyi na biso ya mokolo ya lelo.
Tata Pasteur ateyi biso kitoko, pamba te tangu oyo ezali tangu ya Tata Molimo Santu. Bongo bien bongo te ?
Ezali tangu na biso ya kosepela.
Ti na mukolo ya lelo, batu mingi, ti lelo oyo baza koluka Tata Molimo Santu.
Mais biso toyebi que Tata Molimo Santu azali kati na biso. Bongo bien bongo te ?
Biso, pona Tata Molimo Santu toza na retard te !

Nde yango wana, na 2001, pamba te na 51-2001 esali boni e ? 50ans.
Yango to salaki Jubilé kuna na Nkamba pona koloba ete Tata Simon Kimbangu azali Molimo Santu. Biso toza na retard te parce que tosimbi mokili mobimba. Na yango tolemba te, totonga lingomba ya Tata Molimo Santu. Ba lakisi biso Yeluselemi ya sika, ndenge ba tangeli yango na Bible ezali bongo.
Pamba te koya ya Nkolo Yesu, Nkolo Yesu alobi nga naye kati na bino, mais na vanda na bino muke, na kozonga sima nde na zoya kovanda na bino libela. Esalema bien esalema te ?

Kanisa kaka, oyo ekomami na Bible, Isaac, aboti bana mibale, Esaü na Jacob. Nini ezalaka na tangu wana, pamba te, Jacob mukolo wana alambaka biloko pona Tata na ye, Esaü tangu aye na retard Tata si aleyi, mapamboli eke na Jacob, mais Esaü alelaki na Tata.
Tata alobi likambo te, oyo ya yope ezali koya okozua yango, bongo bien bongo te ? Alors tangu Tata Molimo Santu aye, aye kati na biso. Tangu Papa Pasteur atangi kombo ya maman moko, maman wana akufaka, kino nde Tata Simon Kimbangu na semeki na ye baye kozua mukolo po bakende kosala cercueil, ebembe ye moko atelemi na molimo, nzoto eza ya kolala, mais ye na molimo ake epayi ya Tata Simon Kimbangu, alobi na ye lamusa ngai Nkolo Yesu atindi nga epa na yo olamusa ngai. Kombo na ye NITUMFUIDI. Tangu likambu wana alobi, e touché ngai, nga na lobi aah ! Likambu batu ba yebi yango ya solo ! Biso nanu to komi te (écrire), toko koma, oyo bazo sala wana biso toyebi yango te ! Bo yoki ein ?

Soki to salaki Conférence Internationale, pona ko lakisa makambu ya Tata Simon Kimbangu, kino to kopesa ordre ba koma yango, lingomba ako koma (écrire), mais toko yokana, programme eko pesama. Oyo soki makambu ba koya, mais to banga te, likambo ya Tata Molimo Santu eza na nzela. Mingi ba yaka kosenga film ezala, mais nga na lobi bo zela nanu toko sala programme. Yango wana na yebisi bino bo banga na bino te, makambu nionso ezali, toko salela ngo ndenge programme toko pesa. Sinon tang’oyo ezali tangu ya Tata Molimo Santu. Esengo bien esengo te ? Bolandi malumu ein ? Tina ba tikeli biso Yeluselemi to tonga yango po tangu si ekoki, ya Tata Molimo Santu. Biso toza na retard te.

Tomoni que batu bazo sala ba réunions ya mabe ya ndenge na ndenge, mais nga naza ko banga te. Mingi baza koloba ete to écarter Papa Zako ou Papa Mbenza atikala ye moko po bazua ngai. Est-ce que ba kozua ngai ?
(teeeeeeeeeeeee ! Répondent les fidèles).

Kimbanguisme oyé !
Biso toza na likambu epaya mutu te !
Ba programme nyonso bazo sala tozo yeba yango.
Ezala na Nkamba, ezala awa na Kinshasa, partout, ezala na Europe. Mais biso toza na bo bangi te. Ezali te que biso nde tosali que to kabuana, non !
Na koki kozua exemple, na bengi Papa NZINGA aya, aya ko témoigner, mais ako loba na ye mingi te. Pamba te na 5 mois, Papa NKULUTU azui bana KIZUNGIDILA, oyo ba bengi AJAX, azui maman Mariane, azui Papa Firmin, sima nango abengi Papa NZINGA apesi Bible. Esika mususu te alakisaki ye, ya Koko Abraham, tangu apesi ye Bible, Papa NZINGA ateyaka makambu wana biso nyonso toyebi makambu ezali wana. Lelo oyo ekomi etumba, eza etumba te ! Papa NKULUTU atikaki koloba, apesaki yaye. Na lingi na pesa micro na Papa NZINGA bolanda biso, pe oyo bazalaki wana lokola AJAX azalaki, soki ba lobi que ya lokuta bango moko bako souflé. Papa NZINGA na pesi yo micro
.

Merci Papa.
Na kombo ya Tata, ya Muana, Tata Molimo Santu.
Ndenge ye moko Tata Molimo Santu apesi lotomo
Alobi na ngai nako zala mukuse po ezali nango histoire, mais ezali nde réalité.
Ezalaka 22h00, mokolo wana soirée biso tobimaki un peu avant.
Papa NKULUTU abengi ngai kuna na Ngombe Kinsuka. Na moni kaka abandi kobengisa ba Firmin, ba Papa Mbenza, ba maman Mariane na monaki tout ça, bango nyonso baye. Papa akamati Bible apesi ngai. Alobi tango ekoya biso toko zala lisusu te, ngai na tindi yo, kamata Bible kende koteya bana po ngai na boti bana na ba maman misato. Awa na botaki bana na ba maman misato, na kati na bana wana, oko yeba muana ya Mokonzi nani. Kende koteya bango. Bimisa bana ya AJAX kuna na Temple ba bima, yo kota na bango kuna. Teya bana. Na tangelaki bango Bible, na limboli, na lobi Makambo oyo, etangeli yo Firmin. Maman Paulina nde maman ya mapamboli. Bino Bo botami na maman Pauline, bana ya mapamboli, ba oyo mususu bazali na bango bana mais ya nzoto, bongo libula ya Nzambe, bokonzi ya Nzambe ezali Firmin. Na Papa Mfumu’a Mbanza problème ezali te, na Papa Mfumu’a Nlongo problème ezali te…..(suite non audible)

Merci Papa NZINGA, e mvula mpe yimeni!
Ba réunion ya butu na moyi, biso toza na likambo te!
Nyonso Papa atikaki kosilisa.
Bo tika ko kabola biso, ba réunions, ooh, tosala boye. Te!
Papa Zako asali likambu te, Papa Mbenza asali likambu te! Po soki na lobi bongo, ba misusu ba yaki déjà ko tubela. Ah! Papa limbisa biso, tozo kosala tout otikala yo moko. Te! Likambo ezalaki Papa atikali ko silisa yango. Bitumba ya Angola..ba rapport mingi ezalaki koya na Nkamba, toujours ezalaki na ba problème. To zalaki Koboya ba problème ezala, mais eza ko continuer. Ezalaki nini : ba rapports elekaki mingi ya mabe epayi ya Papa Mfumu’a Mbanza. Ah! Kuna basali likambu na Angola, ba lobi boye, Paul alobi boye. Papa abongisaki boye : Papa Wanzungasa, Papa Mbenza ba kende na Angola. Kasi tangu mukolo ekoki po ba kende kozua visa, Papa José Kisolokele alobi na yoki que Papa Mbenza na Papa Wanzungasa ba lingi ko kende na Angola, bako kende te! Mutu apesaka Visa ezali Paul, moyen ba kende kuna ezali te! Alors esalaki pasi na Papa Mfumu’a Mbanza. Papa Mbanza alobi, bon! likambu te bozonga na bino, mais ba oyo ba kangi nzela bako mona oyo ekoyela bango. Sikawa Angola toujours poto poto na poto poto. Soki to tali, makambu Papa Mfumu’a Nlongo azalaki koloba, ba jeunes ya Kinshasa, ba jeunes ya Brazzaville, toza kozela ba jeunes ya Angola, yango wana tozo sala tout, il faut na ba jeunes ya Angola tozala esika moko, to pusa musala ya Tata Nzambe. Bongo bien bongo te?

Ba réunions na ba réunions, ko bundisa, ko bundisa. Biso toza na likambu na mutu te! To landa oyo ba Papas ba tikaki. Soki tolandi makambu oyo ba Papas ba tikaki, toko longa bien toko longa te? Biso to bangaka ba Papas mingi, pona nini, grâce ya maloba na bango makambu ezali kokokana. Mais musala ya kobundisa wana ezali malamu te. Esika Papa NZINGA azuelaki Bible nga na zalaki te! Papa Mbenza azalaki na kati, Papa Firmin azalaki na kati, ba mususu pe ba zalaki na kati. Mais kino lelo oyo batu bazali kaka ko comprendre te. Tala Bible bateyi biso makasi, kolakisa ete Molimo Santu azali na ba nani? Aza na kati na biso.
Kuna na Yeluselemi nde kuna, mama ya likambu. Elobi pe Papa Mawete ambassadeur (de l’Angola en RDC) que Angola, oyo akoyeba Nkamba te, to Yeluselemi te, azali Kimbanguiste te! Direction to programme ya ba Kimbanguistes ezali Nkamba. Bongo bien bongo te? Soki toza koloba ba zonga ba yamba bango, bango ba lobi moyen ya koya ndenge wana ezali te. Mais kuna ba mariages esalemaka. Esalemaka bien esalemaka te?
Ko yamba bana. Ba yambaka bien ba yambaka te?
Ba nominations ezali bien ezali te?
Wana elakisi nini?
Oyo makambu Papa alobaki que soki obimi, soki okozonga bako sala nini? (ba ko yamba yooo!) Ezalaka bongo.

Nde yango wana ba Tata ba maman botika kobundisa biso. Que tosala tout tokabola bango. Nzambe alobi que etikali na bino libela eko kende epayi mususu te, to batela yango, to bomba yango. Est-ce que Nzambe ako kosaka? Nzambe ako kosaka te! To tambola na solo. To tika mobulu, to simbana tosala musala ya Tata Nzambe, totonga Yeluselemi.

E sikawa boye, naza kolobela biloko oyo na kokende nango.
Programme ezali boye : jeudi na keyi mokolo ya mineyi, fête ekozala samedi.
Sima nango soki eleki, le 10 ou bien le 11 na kozala na NGUNGUA KIMANDA, boyebi histoire « OKAVE » na kokoma esika wana. Pe na ko kende na KUNGU na esika oyo ezali que ye, Tata Molimo Santu akendaki kolongola biso na libulu. Boyebi bien boyebi te? Na septembre nde. Alors d’ailleurs histoire boyebi yango. Alors, toko kende esika wana soki to silisi, le 03 octobre ezali pona ba Dirigeants na kozela bango. Sima le 12 octobre biso nyonso kuna na Nkamba nde to salaka misala, sima ya le 12 octobre toko luka nzela naya na Kinshasa. Bo yoki ein? Po na moni makambu mingi ezali awa il faut to bongisa yango. Misala pe ezali mingi awa. Ndaku oyo ba Nkengi ba fandaki na koya kofandela yango po to silisa yango po makambu ezali koya etikali lisusu musika te. Muana Nzambe tangu si ekoki, kosepela na ye eza na nzela. To silisi na kombo ya Tata, Muana pe Tata Molimo Santu …..Amen.

  

Message transmis par Papa MUAKA NGOY (Ratelki Nkamba), le 10 Aout 2008
Transcrit par Papa Patrick MAVAMBU (Preski - France), le 12 Aout  2008




Contact : preskifrance@ejcsk-france.com   Réalisation : Presse Kimbanguiste France © 2007