haut
 




Message du Chef Spirituel Papa Simon KIMBANGU KIANGANI du dimanche 03 Aout 2008 au Centre D'accueil Kimbanguiste de Kinshasa


Kimbanguisme oyé ! (3x)
Nkamba oyé ! (3x)
Na lingi na yoka bino, Kinshasa oyé ! (3x)
Ewunu e !
E banzi e !
Bilumbu bia kulu e !
Yangalala !
Esengo bien esengo te !
Kiese vo ka kiese kue!
Nsayi vo ka nsayi kue!
Tulenda kueto seva a a a
 
Mikolo ebele ein?
Bo moni biso bien bomoni biso te?
Na kombo ya Tata, Muana pe Tata Molimo Santu,
Totondi na esengo mingi,
Tomoni que mikolo ebele, nga na lobi tika na kende na Kinshasa, tomona pe totala
Misala nini ezali kosalema kuna.
Ya liboso na pesi merci mingi, lokito ya Noel na yokaki yango !
Mingongo na biso eyokanaki, tozuaki message ya kitoko na kati ya nzembo,
Na oyo esalemaki le 25 mai, epesaki nga esengo, ye moko Papa Mfumu’a Mbanza ayaki kopesa nzembo, nzembo yango etamboli déjà, vraiment epesi esengo !
Esengo bien esengo te ? Malgré eleki, Noeleeeee !
Nzambe akokosaka te, ye abandi kopesa makambu nyonso polele polele kolakisa, bongo bien bongo te ?
 
Nanu to silisi te toza kokende. Na yango ndenge na lobi, tomoni ete Papa Mfumu’a Nlongo, Papa Diangienda Kuntima asalaka accident na 58, na 2008, 50ans, nga na lobi tokosala nini ? Mokolo yango il faut to tiya yango na mabondeli, makila na ye etangaki pona biso, tokomi na tangu ezali que bilaka. Toza na pasi mingi, mokili eningani, tolobi tokende kopesa mukumba na yemoko Papa Mfumu’a Nlongo, yango tokendaki na LUKULU, Fête elekaki malamu. Elakisi ete awa tozali, na kati na mabondeli, tosengi kimia eyingela mokili mobimba, pasi oyo toza nango na mokili mobimba esila, biso tozali bana na bango, malgré toza batu ya masumu, tosalaka oyo bango bako sepelaka na yango te, kasi to sengaka bolimbisi. Tozo senga mabondeli mingi. Na 50ans, Nzambe asalaka likambo, oyo nyonso tozali kosenga, ye azali koyoka, alimbisa biso, asalisa biso, alongola biso na pasi oyo toza na ngo.
 
Ya mibale, makambu misatu ndenge batikelaka biso ndenge Papa Pasteur ateyi biso, Bolingo, Mibeko na nini e ? Misala. Na kati ya Bolingo, Mibeko pe Misala nde yango ekotiya kimia na mokili mobimba. Bongo bien bongo te ? Soki tobosani makambu misatu wana, pasi na biso ekosila te ! Tomoni que pasi ezali. Nzambe azali kotala biso. Est-ce que toza kotambola malamu ? Est-ce que toza na kati ya Bolingo ? Est-ce que toza na kati ya mibeko ? Est-ce que toza na kati ya misala ? Nzambe atindi biso tosala, yango tolobi koya na nga tika naya kotala misala ya Kinshasa, soki eza ya kolala, tolamusa yango, tosala makasi. Na lobaka mingi les 3 Congo il faut toyokana, esika lingomba ekeyi, boyokani ezala makasi, surtout biso awa na RDC, soki to yebaka te to yeba yango, mokili mobimba ezali kotalela biso awa na RDC. Likambo nini bango bazali kotala, likambo ya Tata Molimo Santu, bongo bien bongo te ? Toyebi yango bien toyebi yango te ? Toyebi ein ? Ozala que osambelaka ou bien osambelaka te, oza na kati ya likambo yango Tata Molimo Santu si atikela biso banda kala, ye azali kotala. Mokili ekoya epayi nayo, tozala na bobangi te, Nzambe azali kati na biso toko koka.

Baya to baya te? Baya na bango ein? Toko koka? Toloba te que ah ! Papa yamoko azali kuna. Te ! Nde yango wana tina na yeli wana. Chorale ya Yeluselemi bopusana. Na lobi bien, les 3 Congo toza na makambo. Awa na RDC, na Congo Brazza, Congo Angola, ba koko na biso ba monaka pasi, sikoyo tango ekoki, Nzambe alobi si asalisi biso na kati ya Bolingo, Mibeko pe Misala. Chorale ya Yeluselemi, boyembela ngai nzembo oyo ezali kotala makambu ya les 3 Congo, pamba te Nzambe ako kosaka te. Kuna nde eza kolakisa makambu nyonso ezali kati na biso, même e durer, ekosalama, biso tozali sûr. Ba jeunes oyé! Toko longa bien toko longa te? Ba mamans oyé! Toko longa bien toko longa te ? Fondation sikoyo, ba Tata oyé ! Toko longa bien toko longa te ? Ba Tata banga ah ? Ba maman banga ah ? Ba jeunes banga ah ? Allez Chorale, boyemba nanu nzembo oyo na sengi bino ya les 3 Congo to yokana, makambu ekomi pembeni (cantique entonné par la Chorale)……merci, bokende nanu te, etikali nzembo moko, mais Papa BOBE yaka nanu koyebisa biso makambu nini eza na kati ya nzembo wana, balobaki déjà Congo Angola, Congo Brazza, Congo Kinshasa, makabo eza kati na biso, bo bosana yango te.
 
Parole à Papa BOBE : « na kombo ya Tata, Muana pe Molimo santu. Nzembo elobi boye : oyo aza koloba na nzembo, Papa Simon Kimbangu, alobi bana na ngai ya Congo Kinshasa, bana na ngai ya Congo Angola, bana na ngai ya Congo Brazzaville esengo ezali na ngai. Bo fungola matoyi, bo fungola miso, Afrika fungola misu, Amerique fungola misu, Europe fungola misu, Asie fungola misu, océani fungola miso pamba te na telemeli ba continents nyonso mitano. Congo Angola, Congo Kinshasa, Congo Brazzaville bo fungola matoyi boyoka mongongo na ngai. Ngai Simoni na kosala nab a ndoki te, na kosala na batu ya ekobo te, na kosala na batu ya soloka to magie te ! Botika kindoki, botika magie, botika ekobo boya epayi na ngai po to sala elongo» Wana ezalaki message ya Papa Simon Kimbangu, na kombo ya Tata, Muana pe Molimo Santu…Amen!
 
Kimbanguisme oyé ! Ba ndimaka na likambo na bango, Papa alobiki nga na keyi, soki bomoni que biso misato toza lisusu te, likambo ekomi pembeni. Ba lobaki bien ba lobaki te ? Na yango 2007 ezalaki démarrage, 2008 yango yo, towuti LUKULU, tolobi to bokola, to lona. Makambu eza na nzela, tangu ba koyela biso, tokamua te, toza déjà au courant. To fongola ah? To fongola ah? Toko koka? Baya ah? Kimbanguisme Oyé! Malamu baya, pasi eleki mingi. Kimbanguisme oyé! Biso avant, avant.
 
Likambu mususu yang’oyo : Na loba ah ? Na tika kaka alors ? Kimbanguisme oyé! Papa Mfumu’a Nlongo azalaki koloba boye, ye aza na likambu na mutu te, ye aza kosala musala ndenge Tata atindi ye. Bongo bien bongo te ? Na yambaki mondimi na biso moko, mais na kopesa kombo te, ye aza na ndeko kuna na France, ndeko na ye alobi, ah ! awa tosali réunion moko ya likambo ezali que toko yebisa Papa kuna na Kinshasa aya biso tokende kuna, toko yebisa ye, ye il faut ayamba bandeko na ye par force. Nga na tali, eh ! Oyo eza makambu ya lingomba. Lingomba banda 63 ba lobaki que oyo abimi, soki azongi ba kosala ye nini ? Bako yamba ye. Ngai makambu na ngai te. Yango na lobaki, ah ! Likambu munene boye, il faut na yebisa ba ndimi, po soki totiki mibeko alors ekomi pasi. Bongo bien bongo te ? Na pesa ba kombo na bango ? Papa BOBE tanga nanu mukanda wana toyeba makambu ewuti na France.
 
Parole à Papa BOBE : « Na kombo ya Tata, Muana pe Molimo Santu, nazali kotanga na nkasa oyo, Mokonzi ya Bule apesi ngai kombo ya bato ba salaki lisanga wana, oyo ba lobi il faut baya ko coincer Papa po ete de force ayamba ba ndeko na ye wana na makabo oyo biso nyonso toyebi. Na réunion wana, kombo ya liboso ezalaki Tata KITANU, kombo ya mibale MBOTE MUNZILA, kombo ya misato SIASIA, kombo ya mineyi Papa BAVON, kombo ya mitano BAKALADIA et puis na ebele na groupe ya pied gauche. Bango wana bazuaki mikano wana ete il faut même de force baya bazua ba ndeko bakenda na Nkamba po ete de force ba rectifier »
 
Reprise de la parole par Papa SKK :
Merci, likambo yango ezali kotambola mingi, mais nalingi na loba boye, Papa Mfumu’a Mbanza kuna na Nkamba tozalaka misato, Papa SOLO, ngai na Papa MBENZA, tozalaki pembeni ya Papa, tozalaki kosala misala, lokola mutu na mutu na likambo na ye Papa azalaki kopesa. Oyo ya ngai na kolobaka te pamba te eza ya ngai, mais na koloba muke, na loba ah?
Pamba te baza kobundisa mutu mususu te ezali nde ngai. Eza mutu mususu te, malgré baza ba ndeko na ngai mais, soki totali bien pona nini Papa atiyaki ye ? Ezalaki boye : tangu nyonso Papa akomema biso na mausolée, ezala na Papa KAYOMBO, ezala Papa NZINGA ezala ye moko Papa SOLO, biso mibale na Papa SOLO nde toko komisa ye esika ya Tata na ye. Kosambela ya Papa Mfumu’a Mbanza ekomaki pasi na tina ya malade, il faut tosimba ye, ezala que azalaki na maboko ya Papa NZINGA to KAYOMBO mais bango bako tikala na porte mais nga na Papa SOLO biso mibale toko komis aye esika Papa Kimbangu azali, bino moko boyebi. Soki tokomi wana, ako loba na ga na telema, na telemi, akoloba na Papa SOLO azonga sima, soki ye azongi nga na tikali nga moko, makambo azalaki koloba na ngai, kolakisa ngai ngai moko nde na yebi yango, et même soki nakozala lisusu te, ngai moko na yebi na nani na kotika mukumba wana. Bazali kobundisa mutu mususu te, mais baza kobundisa nde ngai. Papa nde a plasaki makambu nyonso. Ngai pe na ko kuesa te ! Soki na makasi. Est-ce que na makasi eko simba ? Ewumelaka te ! Esaü na Jacob, na kati ya libumu ya maman na bango, bazali kobunda pona kobima, Esaü abimi Jacob aye kobima, malgré ba bundaki, ba yokanaki to ba yokanaki te ? Pamba te Nkolo Yesu tangu aye alobi, sur 100 limeme moko ebungi etikali 99, ake koluka yango atiki nyonso, tangu amonaki biso motema na ye esepelaki. Oyo ba bungaka ba nani ? Biso ba nani ? Batu muindu. Akeyi, azongi, Tata Simon Kimbangu tomoni ye, aye ko longola biso na bowumbu. Tata Pasteur alobaki makambu mingi, bolandaki ye ein ? Hum ! Lokuta na bango. Ba zuilaka ngo na makasi te ! Eko simba te. Yango wana kobomba pe kobomba batu baza ko kanisa, ah ! Papa alingaka ba ndeko na ye te ! TE ! Eza po to sala musala, comme ça soki tangu ekoki makambu nyonso oyo tozui ezalaka boye, abu ooo ? Na sengi nzembo ya mibale na Yeluselemi po il faut makambu na biso ekende juste juste ndenge Nzambe alingi. (Cantique entonné par la Chorale)……merci Yeluselemi, Papa BOBE ayebisa biso pamba te eza na kikongo, soki ba lobi nini na nzembo.
 
Parole à Papa BOBE : « na kombo ya Tata, Muana pe Molimo santu. Ezali kolela ya Tata Molimo Santu, nzembo yango elobi boye : eh eh ! Tozali komi yeba te, ete towutaki na likolo tokiti awa na se tokoti na lingomba ya Papa Simon Kimbangu Molimo Mosantu. Na pesi bino mateyi po boyoka bolanda, kasi sikoyo tangu likambo na ngai ekoya, nako bikisa ba nani eh ?
Ah! Mawa na bino banso, bato na tiyelaki motema ba bungi nzela, bilaka oyo ba lakelaki ngai kuna na likolo, awa baye na mokili ba bosani, ba mipesi na makambu ya mabe ya Satana. Ah! Ngai KIMBANGU, na ko bikisa ba nani eh? Bo sosola même mokanda mua Nzambe, oyo balandaki mateyi, ba bikaki, kasi oyo balandaki mateyi te ba bunga. Na ko bikisa ba nani eh? » na kombo ya Tata, Muana pe Molimo Santu…Amen!
 
Reprise de la parole par Papa SKK :
Merci. Ya mingi ezali te, nga na yaki na tina ya misala.
To lobi, tobokola, tolona, toko yamba batu mingi ba koya.
Kuna na Congo Brazza bomi bongisa, kuna na Congo Angola bomi bongisa
Awa pen a RDC tomi bongisa.
Nkamba, Kinshasa, Katanga kuna nde asalaki 30ans bami bongisa. Po batu bako linga nini ba mona pe esika ye asalaki 30ans. Bongo bien bongo te? Tomi bongisa. To bokola, to lona. Esika nyonso. Bas-Congo ezali nzela, omona aye naye na masuwa akiti na matadi. Yo Mbanza Ngungu olona pe mingi loso, pamba te nzela nde yango wana tokomelaka na Nkamba. Y ope nde ozali mukonzi ya Nkamba. Kinkewa eza na yo pembeni. Yo Kinshasa, Lutendele yango wana, si to mesana. Plateau toza kozela, kuna pe misala took tiya mingi. Presque tozui ba mabele mingi ba pesi biso took banda kolakisa bino po ete to lona. Tolingi bien tolingi te? To kozongela makambo ya misala ezala mingi. Bokende kofanda na bino merci. Nde yango wana tozalaki na ngo, tosilisi na kimbo ya Tata, Muana pe Tata Molimo Santu…..Amen !

  

Message transmis par Papa MUAKA NGOY (Ratelki Nkamba), le 03 Aout 2008
Transcrit par Papa Patrick MAVAMBU (Preski - France), le 04 Aout  2008




Contact : preskifrance@ejcsk-france.com   Réalisation : Presse Kimbanguiste France © 2007