Message du Chef Spirituel Papa Simon KIMBANGU KIANGANI du dimanche 06 juillet 2008 à Nkamba Nouvelle Jérusalem
Na kombo ya Tata, Muana pe
Tata Molimo Santu,
Tolandi mateyi na biso, Tata
Selo ateyi biso. Abandelaki na nzembo ya ba Yuda, akeyi na mibeko, atangeli
biso mama na likambo oyo tokeyi na ngo, tobomba pe tosalela yango.
Yo obengami mondimi, nzela
ya lobiko yang’oyo.
Nzambe akaniselaka biso
tangu nyonso, biso batu nde bososoli ezali te.
Na tangu ozui likambu ya
Tata Nzambe, likambo wana tobomba pe tosalela, yango wana nde nzela ya lobiko.
Mokanda mua Nzambe ebombi
likambo moko te, na ndenge ye asengi biso, tozui likambu oyo tokeyi na ngo ya
ndenge na ndenge na tina ya Yeluselemi.
Oyo ezali Yeluselemi. Kuna
na ba Yuda, na tangu emonani ete elembo eke na Jacob, Jacob azuaki signe ya
makasi, ezalaki moko te, ya liboso abundaki na Ange, tangu ba bundaki na Ange,
Jacob alongaki akueyisaki Ange na se, bande tangu wana Ange alobi oza lisusu
Jacob te ! Banda lelo okomi Israël, mabota nyonso ezali kotalela yo
sikoyo, Ange ake na ye, eza elembo makasi ! Mboka ba bengaki SALEM, ekomi
YELUSELEMI (JERUSALEM).
Esika Jacob awutaki amoni
que l’heure eleki aza kozonga, alali, esika ati mutu, escalier ewuti likolo
ekiti na se esika atiaki mutu, tala bilembo ! Elakisi ete Nzambe, ye
mokonzi ya biloko nyonso. Nzambe soki alobi, alobi.
Jacob, oyo babengi Israël
kuna nde ewutaki Joseph batekaki na Egypte, elakisi que likambo ekeyi ezui
nzela na maloba oyo Nzambe alobaki. Bana Israël bakotaki na Egypte na likambo
oyo Nzambe alobaki ! Ye Tata selo ayebisi biso yango. Ezalaka ndenge
nini ? Ebandelaki ndenge nini ? Tangu wana likambo ekeyi kuna, Moïse
abimisi bango, na nzela bazuaki mibeko pona mboka baza kokende bayeba que ba
oyo bazali batu ya ndenge mususu. Yemoko pe alobi yango que oyo boyekoli na
Egypte ya mabe ! Yango te, oyo nga na pesi bino yango nde bokokende
kosalela.
Et tangu bakomi kuna, bango ba bosani oyo ba pekisaki bango bisengo
oyo bokomona kuna yango te ! Bosalela yango te ! Bango ba koti na
rythme oyo bakendaki kokuta na Canaan, sikawa bake kosala lisusu etumbu mususu
na BABYLONE, donc lelo ezali tour na yo mutu muindu na mboka oyo ezalaki
NKAMBA ! NKAMBA ! Nkolo Yesu alobi na Tata Kimbangu, napesi yo
musala, na tangu bayokanaki Tata Kimbangu andimi, ye alobi eza lisusu NKAMBA te
ekomi YELUSELEMI, ewutaki na nani, ye moko Nkolo Yesu. Alors yo mutu muindu,
YELUSELEMI yang’oyo, toza pe koteya po Tata Kimbangu amoni pasi na tina na
mboka oyo, ye alobaki ete oui, toko kangama, bowumbu ekosila, mais soki
tokangami, po bana Israël bango bakotaki na Egypte, ba bimaki, mais biso
tokobima te, boloko na biso toko salela yango na mokili na biso, bango soki ba
bimaki, biso toko bima te, ezali te que tolongue na RDC toke mokili mosusu,
te ! Totikalaki awa, batu ya Brazza na Brazza, na Angola na Angola, biso
nde awa.
Na yango likambo ya Tata
Nzambe, Nzambe akokosaka te. Yo sikoyo okomi na YELUSELEMI. YELUSELEMI ezali
totonga yango. Ba Tata batiki biso na YELUSELEMI, tangu ya kotonga YELUSELEMI
yang’oyo. Mardi fête ya Papa Mfumu’a Nlongo Tata DIANGIENDA KUNTIMA mokonzi ya
lingomba, oyo atambuisi lingomba eke mokili mobimba, mokolo ya mardi ezali fête
pona yo, ye abengi biso. Abengi biso pamba te pona nini totonga YELUSELEMI.
Mutu na mutu si afutaki ticket na ye, mutu na mutu si asombaki eloko ya koliya
na nzela, mutu na mutu asombi eloko oyo akoya kotika na YELUSELEMI, toko mataka
maboko pamba te, mutu na mutu akosala Nsinsani pona YELUSELEMI. Mikolo eleki
batu bowuti France bayaki ebele, pe avion mobimba ba Musiciens. ET lelo oyo ba
misusu baye bafuti ticket kolongua na pokua baye, ba misusu baza nanu na
Centre, ba misusu bakomi.
Pona Katanga,
fête ya ba jeunes. Ba jeunes, Choreki, na yoki déjà que 170 ba koya kotonga
YELUSELEMI. Soki oza kolala pongi tangu ekoki, mutu muindu ezali tangu nayo,
YELUSELEMI balakisi biso yang’oyo na ndenge toyoki na mateyi. 170! Avion moko
na ndambu ! Pona nini, ba sosoli balandi; tangu na biso, soki totongi te,
tangu wana Nzambe akosala makambu na ye, ekokuta biso ndenge nini ?
Likambu wana nde ezalaki koloba Papa Mfumu’a Nlongo aah ! Malamu to tonga,
malamu to sala soki te ! Ekozala na biso pasi. Na ndaku na yo oyambi batu
mibale misatu ozo monango poid, oyo tokoyamba mokili mobimba, tangu bakoya
ekozala ndenge nini ? Soki osalaka, ah ! Soki osalaka te, kombo na yo
ezali te ! Tokomona ngo lokola liseki likambu ya NKAMBA, nzoka nde Nzambe
alobi ezali tour na yo. Ezali tangu na biso, tozalaki koyokela yango na musika,
ah ! Nkolo Yesu na ba Yuda, oui ! Yo pe bazalaki ko kipe makambu na
yo te, maloba na yo siko yo ekomi sukali. Mokili mobimba Jésus, Jésus, Nkolo
Yesu, Nkolo Yesu, mais na tangu wana nani andimelaki ye ? Mutu te !
Sikoyo pe mokili eningani, elobi Tata selo, soki ebandeli, soki na katikati,
soki tokomi na suka, ekeke ya mineyi na maboko ya Tata Simon Kimbangu, ba pesi
biso tangu to sosola. Likambu eye. Na yango to landi kaka oyo Tata selo ateyi
biso, kolakisa YELUSELEMI yango pe tolandi. Bilembo! Tobomba to salela na
kati ya bolingo mibeko pe misala, Tata, Muana pe Tata Molimo Santu…..Amen!
Message transmis par Papa MUAKA NGOY (Ratelki Nkamba), le 06 juillet 2008
Transcrit par Papa Patrick MAVAMBU (Preski - France), le 07 juillet 2008